16
Yesu mpe bakonzi ya lingomba ya Bayuda
(Mat 12.38-39; Mlk 8.11-13; Lk 11.16, 29; 12.54-56)
Bafarizeo mpe Basaduseo bayaki epai na Yesu mpo na kotiela Ye motambo ; basengaki na Ye ete alakisa bango elembo moko kowuta na Likolo.
Yesu azongiselaki bango :
— Na pokwa, bolobaka : « Mokolo ya lobi ekozala mokolo malamu, pamba te likolo ezali motane ! » Mpe na tongo, bolobaka : « Mvula makasi ekobeta lelo, pamba te mapata eyindi. » Solo, boyebi kososola bilembo oyo elakisaka soki mvula ekobeta to ekobeta te, kasi bozangi makoki ya kososola bilembo ya tango ! Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya Yona.
Bongo atikaki bango wana mpe akendeki.
(Mlk 8.14-21)
Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mapa. Yesu alobaki na bango :
— Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo !
Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango :
— Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te !
Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki :
— Bato ya kondima moke ! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ? Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ? Bobosani penza mapa mitano oyo bokabolelaki bato nkoto mitano, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ? 10  Bobosani lisusu mapa sambo oyo bokabolelaki bato nkoto minei, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ? 11  Ndenge nini bozali kososola te ete nazalaki koloba na tina na mapa te, tango nalobaki na bino : bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo ?
12 Boye, bayekoli basosolaki ete alobaki na bango te ete basala keba na levire ya mapa, kasi nde basala keba na mateya ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo.
Petelo andimi ete Yesu azali Mwana na Nzambe
(Mlk 8.27-30; Lk 9.18-21; Yn 6.66-71)
13 Tango Yesu akomaki na etuka ya Sezarea ya Filipo, atunaki bayekoli na Ye :
— Bato balobaka ete Mwana na Moto azali nani ?
14 Bazongisaki :
— Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, Jeremi to moko kati na basakoli.
15 Yesu atunaki bango lisusu :
— Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?
16 Simona Petelo azongisaki :
— Ozali Masiya, Mwana na Nzambe na bomoi.
17 Yesu alobaki na ye :
— Esengo na yo Simona, mwana mobali ya Yona ! Pamba te ezali moto te nde ayebisi yo makambo oyo, kasi Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo. 18  Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te. 19  Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya Likolo ; nyonso oyo okokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo okofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
20 Bongo Yesu apekisaki makasi bayekoli na Ye koloba na moto ete Ye azali Masiya.
Yesu asakoli kufa mpe lisekwa na Ye
(Mlk 8.31–9.1; Lk 9.22-27)
21 Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
22 Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye :
— Nkolo, tika ete Nzambe abatela Yo mosika ya makambo wana ! Ekokomela Yo te !
23 Kasi Yesu abalukaki, alobaki na Petelo :
— Mosika na Ngai, Satana ! Ozali epekiselo mpo na Ngai ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.
Ndenge nini kolanda Yesu
(Mlk 8.34–9.1; Lk 9.23-27)
24 Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai. 25  Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akozwa yango lisusu. 26  Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ? 27  Pamba te Mwana na Moto akoya elongo na ba-anjelu na Ye kati na nkembo ya Tata na Ye mpe akofuta moto nyonso kolanda misala na ye.
28  Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Mwana na Moto koya kati na nkembo ya bokonzi na Ye.