20
Lisese ya nkolo elanga mpe basali na ye
Pamba te, tala ndenge nini Bokonzi ya Likolo ezali : Bokonzi ya Likolo ezali lokola nkolo elanga ya vino oyo abimaki na tongo makasi mpo na koluka bato oyo bakosala na elanga na ye. Ayokanaki na bango ete moko na moko akobanda kozwa lifuti ya mbongo moko ya ebende mpo na mokolo mobimba ; bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino.
Na ngonga ya libwa ya tongo, abimaki lisusu mpe amonaki, na esika oyo bato bakutanaka, bato mosusu oyo bazalaki kosala eloko moko te. Alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. Nakopesa bino lifuti ya sembo, oyo ekoki. »
Boye, bakendeki kuna. Nkolo elanga abimaki lisusu na ngonga ya midi mpe na ngonga ya misato sima na midi ; mpe na mbala nyonso mibale, asalaki kaka ndenge moko. Abimaki lisusu na ngonga ya mitano ya pokwa mpe amonaki lisusu bato batelemi na esika wana oyo bato bakutanaka. Atunaki bango : « Mpo na nini botelemi kaka boye mokolo mobimba na kosala eloko moko te ? »
Bazongisaki : « Soki totelemi boye, ezali mpo ete moto moko te azwi biso na mosala. »
Bongo alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. »
Tango pokwa ekokaki, nkolo elanga ya vino alobaki na motambolisi ya misala ya elanga : « Benga basali nyonso mpe futa bango ; banda na bato oyo nazwaki sima mpe sukisa na ba-oyo nazwaki liboso. »
Bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayaki, mpe moko na moko azwaki lokola lifuti, mbongo moko ya ebende. 10  Bongo ekomaki ngonga ya kofuta bato oyo nkolo elanga azwaki liboso na mosala ; bakanisaki ete bakozwa mbongo mingi koleka, kasi moko na moko kati na bango azwaki lokola lifuti, mbongo moko kaka ya ebende. 11  Tango bazwaki yango, basilikelaki nkolo elanga. 12  Balobaki : « Bato oyo ozwaki sima mpe basali kaka ngonga moko, ofuti bango ndenge moko na biso oyo tosali mosala makasi mokolo mobimba mpe na se ya moyi makasi ! »
13  Kasi nkolo elanga azongiselaki moko kati na bango : « Moninga na ngai, nasali yo mabe te ! Boni, toyokanaki te ete osala mpo na lifuti ya mbongo moko ya ebende ? 14  Kamata lifuti na yo mpe kende. Ngai moko nde nalingi kopesa na moto oyo abandaki sima, lifuti ya ndenge moko na oyo napesi yo. 15  Boni, nazali na ndingisa te ya kosala na mbongo na ngai nyonso oyo nalingi ? Osilikeli ngai mpo ete nazali moto malamu ? »
16  Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka.
Yesu asakoli lisusu kufa mpe lisekwa na Ye
(Mlk 10.32-34; Lk 18.31-34)
17 Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango wana bazali kotambola : 18  « Boyoka ! Tozali solo kokende na Yelusalemi ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko ; bakokatela Ye etumbu ya kufa 19  mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »
Yesu mpe mama ya bana ya Zebede
(Mlk 10.35-45; Lk 22.25-27)
20 Bongo mama ya bana mibali ya Zebede ayaki epai ya Yesu, elongo na bana na ye ya mibali, mpe agumbamaki liboso na Ye mpo na kosenga Ye eloko moko. 21 Yesu atunaki ye :
— Olingi nini ?
Azongisaki :
— Laka ngai ete bana na ngai mibale oyo ya mibali bakovanda kati na Bokonzi na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.
22 Yesu azongiselaki bango :
— Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga ! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela ?
Bazongisaki :
— Iyo, tokoki.
23 Yesu alobaki na bango :
— Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela ; kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.
24 Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki bandeko mibale wana. 25 Kasi Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango :
— Boyebi malamu ete bakonzi ya bikolo bakonzaka bato ya bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango. 26  Esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ; 27  mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu na bino ! 28  Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.
Yesu abikisi bakufi miso mibale
(Mlk 10.46-52; Lk 18.35-43)
29 Tango Yesu elongo na bayekoli na Ye balongwaki na Jeriko, bato ebele balandaki Yesu. 30 Bakufi miso mibale bazalaki ya kovanda pembeni ya nzela ; tango bayokaki ete Yesu azali koleka, bagangaki :
— Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
31 Bato bazalaki kopamela bango mpo ete bakanga minoko na bango, kasi bango bagangaki lisusu makasi :
— Nkolo, mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
32 Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango :
— Bolingi nasala nini mpo na bino ?
33 Bazongiselaki Ye :
— Nkolo, sala ete tomona.
34 Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango ; mpe, mbala moko, bakomaki komona mpe balandaki Ye.