19
Mateya na tina na koboma libala
(Mlk 10.1-12)
Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana, alongwaki na Galile mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. Ebele penza ya bato balandaki Ye, mpe abikisaki bango kuna. Bafarizeo bapusanaki pene na Ye mpo na komeka Ye ; bapesaki Ye motuna :
— Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala mpo na likambo songolo ?
Yesu azongisaki :
— Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, » mpe ete alobaki : « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko ? Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi ! »
Kasi Bafarizeo balobaki na Ye :
— Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali apesa mwasi na ye mokanda ya koboma libala soki bakabwani na libala ?
Yesu azongiselaki bango :
— Moyize apesaki bino nzela ya kobengana basi na bino na mabala, pamba te mitema na bino ezali mabanga ; na ebandeli, ezalaki bongo te. Nazali koloba na bino : Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki akweyaki na ekobo, mpe abali mwasi mosusu asali ekobo.
10 Bayekoli balobaki na Ye :
— Soki mobali asengeli kozala bongo liboso ya mwasi na ye, wana eleki malamu mpo na mobali ete abala te !
11 Yesu azongiselaki bango :
— Mibali nyonso bakoki kondima mateya oyo te, kaka ba-oyo bapesameli makoki mpo na yango. 12  Ezali na tina misato oyo esalaka ete mibali mosusu babala te : ezali na mibali oyo, wuta na mabumu ya bamama na bango, bakoki kobala te ; ezali na mibali oyo baboma bango mokongo ; ezali mpe lisusu na mibali oyo bango moko baboya kobala mpo na Bokonzi ya Likolo. Tika ete moto oyo azali na makoki ya kondima mateya oyo andima yango !
Yesu ayambi bana mike
(Mlk 10.13-16; Lk 18.15-17)
13 Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko mpe asambela mpo na bango. Kasi bayekoli bapamelaki bato oyo bamemaki bana yango. 14 Yesu alobaki :
— Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
15 Atielaki bango maboko, mpe alongwaki wana.
Bazwi mpe Bokonzi ya Nzambe
(Mlk 10.17-31; Lk 18.18-30)
16 Elenge mobali moko apusanaki pene na Yesu mpe atunaki :
— Moteyi, likambo nini ya malamu nasengeli kosala mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
17 Yesu azongisaki :
— Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu ? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko.
18 Elenge mobali yango atunaki lisusu :
— Mibeko nini ?
Yesu azongisaki :
— Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te, 19  okotosaka tata mpe mama na yo mpe okolingaka moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
20 Elenge mobali alobaki :
— Natosaka mibeko wana nyonso ; nasala lisusu nini ?
21 Yesu azongisaki :
— Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
22 Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
23 Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo ! 24  Nazali koloba na bino lisusu : ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
25 Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana :
— Bongo nani penza akoki kobikisama ?
26 Wana Yesu atalaki bango, alobaki :
— Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !
27 Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu :
— Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo ! Ekozala boni mpo na biso ?
28 Yesu alobaki na bango :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele. 29  Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko.
30  Kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.