24
Kobebisama ya Tempelo
(Mlk 13.1-13; Lk 21.5-19)
Wana Yesu azalaki kobima longwa na lopango ya Tempelo, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpo na kotalisa Ye ndenge batonga Tempelo. Kasi Yesu alobaki na bango :
— Bomoni nyonso oyo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso ekobukama, libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu.
Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka :
— Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ?
Yesu azongisaki :
— Bosala keba ete moto moko te akosa bino ! Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele. Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te. Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, nzala ekozala makasi penza, mpe mabele ekoningana bipai na bipai. Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.
Bongo, bakokaba bino mpo ete bomona pasi, bakoboma bino ; bikolo nyonso ekoyina bino mpo na Kombo na Ngai. 10  Mpo na yango, bato ebele bakokweyisa kondima na bango, bakokaba mpe bakoyina baninga na bango.
11  Basakoli ebele ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele. 12  Lokola mabe ekokola se kokola, bolingo ya bato ebele ekokita. 13  Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika. 14  Sango Malamu oyo ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ete ezala litatoli epai ya bikolo nyonso ; sima na yango kaka nde suka ekoya.
(Mlk 13.14-23; Lk 21.20-24)
15  Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— 16  wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ; 17  tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye, 18  mpe tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye !
19  Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele ! 20  Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi to na mokolo ya Saba. 21  Pamba te pasi ekozala makasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta na ebandeli ya mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
22  Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
(Mlk 13.24-31; Lk 17.23-24; 21.25-31)
23  Na tango wana, soki moto moko alobi na bino : « Klisto azali awa ! » to « Azali kuna, » bondima ye te. 24  Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema. 25  Namiyebiseli bino mpo ete bosala keba !
26  Soki moto moko alobi na bino : « Botala, azali kati na esobe, » bokende kuna te ; to « Azali awa, kati na esika ebombama, » bondima yango te. 27  Solo, ndenge mokalikali oyo ebimi na este engengisaka kino na weste, ndenge wana mpe koya ya Mwana na Moto ekozala. 28  Esika nyonso ebembe ezali kopola, bandeke oyo eliaka bibembe esanganaka wana.
(Mlk 13.24-27; Lk 21.25-28)
29  Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka,
« moyi ekokoma molili,
sanza ekongenga lisusu te,
minzoto ekokweya longwa na likolo,
mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
30  Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo ; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene. 31  Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.
32  Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene. 33  Ndenge moko mpe mpo na bino ; tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba.
34  Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema. 35  Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
Mokolo mpe ngonga eyebani te
(Mlk 13.32-37; Lk 17.26-30, 34-35)
36  Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana ; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.
37  Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na koya ya Mwana na Moto ; 38  pamba te liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, kobala mpe kobalisa bana na bango, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ; 39  bayebaki eloko moko te na tina na oyo elingaki kosalema, kino mpela eyaki mpe ekumbaki bango nyonso.
Ekozala mpe bongo na koya ya Mwana na Moto. 40  Mibali mibale bakozala na elanga : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ; 41  basi mibale bakozala konika bambuma na enikelo ; moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.
42  Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya. 43  Bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga ya butu oyo moyibi akoya, alingaki kosenzela mpe kopekisa ye kokota kati na ndako na ye. 44  Yango wana, bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te.
(Lk 12.41-48)
45  Nani azali mowumbu ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo apesaki mokumba ya kokamba basali kati na ndako na ye, mpo ete apesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ? 46  Esengo na mowumbu oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo. 47  Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso.
48  Kasi soki azali mowumbu mabe oyo amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, » 49  mpe akomi kobeta baninga na ye ya mosala, bawumbu lokola ye, kolia mpe komela masanga mesa moko elongo na balangwi masanga, 50  nkolo na ye akozonga na mokolo oyo ye, mowumbu, azali kozela te mpe na ngonga oyo ayebi te ; 51  akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na bato ya bilongi mibale, na esika oyo ekozala kolela mpe koswa minu.