25
Lisese ya baseka zomi
Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala. Kati na bango, mitano bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele. Baseka oyo bazalaki bazoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te ; ba-oyo bazalaki mayele bakamataki minda na bango mpe milangi oyo ezalaki na mafuta kati na yango.
Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki. Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye ! »
Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango. Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »
Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki : « Te ! Ekokoka te mpo na biso mpe bino ! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko. »
10  Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki : baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.
11  Na sima, baseka mosusu mpe bayaki ; balobaki : « Nkolo, nkolo, fungolela biso ekuke ! » 12  Kasi azongiselaki bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : nayebi bino te. »
13  Boye bosenzela, pamba te boyebi mokolo te, boyebi mpe ngonga te.
Lisese ya basali misato
(Lk 19.12-27)
14  Ekozala lisusu lokola moto moko oyo, wana akomaki pene ya kokende na mobembo, abengaki basali na ye mpe apesaki bango mokumba ya kobatela bozwi na ye. 15  Apesaki na mosali ya liboso batalanta mitano ; na mosali ya mibale, batalanta mibale ; mpe na mosali ya misato, talanta moko. Apesaki bango yango kolanda makoki ya moko na moko, mpe akendeki na mobembo. 16  Mosali oyo azwaki batalanta mitano abandaki mbala moko kobalola yango na mombongo, mpe mombongo yango ebotaki batalanta mosusu mitano lokola mileki. 17  Mosali oyo azwaki batalanta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mombongo na ye ebotaki batalanta mosusu mibale lokola mileki. 18  Kasi moto oyo azwaki kaka talanta moko atimolaki libulu kati na mabele mpe abombaki talanta ya nkolo na ye.
19  Sima na mikolo ebele, nkolo ya basali wana azongaki mpe alobaki na bango : « Boyebisa ngai ndenge nini bosalelaki bozwi na ngai. »
20  Mosali oyo azwaki batalanta mitano apusanaki mpe amemaki batalanta mitano mosusu oyo azwaki lokola mileki. Alobaki : « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mitano ; tala, nazwi batalanta mitano mosusu lokola mileki. »
21  Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
22  Mosali oyo azwaki batalanta mibale ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mibale ; tala, nazwi batalanta mibale mosusu lokola mileki. »
23  Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »
24  Bongo mosali oyo azwaki talanta moko ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nayebaki ete ozali moto ya matata, obukaka bambuma na elanga oyo olonaki te mpe olokotaka bambuma na esika oyo obwakaki ata nkona moko te. 25  Yango wana, nabangaki mpe nakendeki kobomba talanta na yo na se ya mabele. Tala yango oyo, kamata talanta na yo. »
26  Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe mpe ya goyigoyi ! Lokola oyebaki ete nabukaka bambuma na elanga oyo nalonaki te mpe nalokotaka bambuma na esika oyo nabwakaki ata nkona moko te, 27  mpo na nini opesaki te talanta na ngai epai ya babombi misolo mpo ete, na bozongi na ngai, nakoka kozwa yango elongo na mileki ? 28  Bobotola ye talanta yango mpe bopesa yango epai ya moto oyo azali na batalanta zomi. 29  Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu, mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango. 30  Bongo na oyo etali mosali mabe oyo, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »
Kosambisama ya suka
31  Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo. 32  Bikolo nyonso ya mokili ekosangana liboso na Ye. Bongo akokabola bango na masanga mibale ndenge mobateli bibwele akabolaka bameme mpe bantaba : 33  akotia bameme na ngambo ya loboko na Ye ya mobali, mpe bantaba, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. 34  Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama. 35  Pamba te nayokaki nzala, mpe bopesaki Ngai bilei ; nayokaki posa ya mayi, mpe bopesaki Ngai mayi ya komela ; nazalaki mopaya, mpe boyambaki Ngai malamu ; 36  nazalaki bolumbu, mpe bolatisaki Ngai bilamba ; nabelaki, mpe bosungaki Ngai ; nakotaki na boloko, mpe boyaki kotala Ngai. »
37  Bongo, bato ya sembo bakoloba na Ye : « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala mpe topesaki Yo bilei ; tango nini tomonaki na posa ya mayi, mpe topesaki yo mayi ya komela ? 38  Tango nini tomonaki Yo mopaya, mpe toyambaki Yo malamu ; tango nini ozalaki bolumbu, mpe biso tolatisaki Yo ? 39  Tango nini tomonaki Yo kobela to kati na boloko mpe toyaki kotala Yo ? »
40  Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »
41  Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye. 42  Pamba te nayokaki nzala, kasi bopesaki Ngai bilei te ; nayokaki posa ya mayi, kasi bopesaki Ngai te mayi ya komela ; 43  nazalaki mopaya, kasi boyambaki Ngai malamu te epai na bino ; nazalaki bolumbu, kasi bolatisaki Ngai te ; nabelaki mpe nakotaki na boloko, kasi bosungaki Ngai te. »
44  Bango mpe bakotuna Ye : « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala to na posa ya mayi ; tango nini tomonaki Yo mopaya, ozangi bilamba, ozali kobela to okoti na boloko, bongo tosungaki Yo te ? »
45  Akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »
46  Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.