2
Botala kuna na bangomba
makolo ya momemi sango malamu :
amemi sango ya kimia !
Oh mokili ya Yuda, sepela na bafeti na yo
mpe kokisa ndayi na yo ;
pamba te wuta sik’oyo,
moto mabe moko te akokota lisusu epai na yo ;
pamba te bango nyonso bakobebisama nye.
Tala, mobebisi azali koya kosala yo mabe !
Batela malamu bandako na yo batonga makasi,
kengela nzela na yo,
bongama mpo na bitumba
mpe sangisa bato na yo.
Yawe akozongisa lisusu nkembo
ya Jakobi mpe ya Isalaele,
atako babebisaki mpe bapanzaki mokili na bango,
mpe atako babebisaki bilanga na bango ya vino.
 
Banguba mpe bilamba ya basoda na bango
ezali ya langi ya motane ;
bibende ya bashar na bango ezali kongenga
na mokolo oyo babongisi mpo na bitumba,
mpe makonga basala na nzete ekomi kotambola bipai na bipai.
Bashar ezali kokota na elulu na nzela,
ezali kokende mpe kozonga
na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;
ezali komonana lokola koni
oyo ezali kopela moto,
ezali kotambola na bangambo nyonso
lokola mikalikali.
 
Abengi basoda na ye nyonso ya mpiko.
nzokande, na nzela na bango, bazali kotepatepa,
bazali kokende na lombangu pene ya mir.
Bikuke ya ebale efungwami*,
mpe ndako na ye ya bokonzi ebukani.
Ekatami ete engumba wana ekokende na bowumbu
mpe bakomema yango mosika penza ;
basali na yango ya basi bakolela lokola bibenga
mpe bakomibeta batolo likolo ya pasi.
Na kala, engumba Ninive ezalaki
lokola liziba ya mayi.
Kasi tala yango lelo oyo :
etoboki mpe ekomi kobimisa mayi !
Bazali kobelela : « Botelema ! Botelema ! »
Kasi ata moto moko te azongi lisusu kuna.
10 Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi,
pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka
mpe etonda na biloko ya motuya.
 
11 Bakoteli yango, bapanzi yango,
babotoli na makasi biloko na yango ya talo !
Mitema ebukani, mabolongo ekomi kolenga,
mpe banzoto etondi na somo.
12 Wapi sik’oyo libulu epai wapi bankosi
ezalaki kobokola bana na yango ?
Wapi sik’oyo libulu epai wapi nkosi ya mwasi
elongo na bana na yango
ezalaki kotambola na somo ata moke te ?
13 Nkosi ebomi banyama ebele
mpo ete epesa yango lokola bilei
epai ya bana na yango,
ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango,
bongo etondisi libulu na yango na banyama
oyo ebomi mpe na misuni.
 
14 « Nakotombokela yo, »
elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ;
« nakozikisa bashar na yo na moto,
mpe mopanga ekoboma bana ya nkosi na yo.
Nakobotola yo misuni nyonso awa na se ;
boye mongongo ya batindami na yo
ekotikala koyokana lisusu te. »
* 2:7 Bikuke ya ebale efungwami elingi koloba ete engumba ekobebisama na mpela.