3
Engumba ya babomi ebebisami
Mawa na engumba oyo mosala na yango
kosopa makila ya bato,
engumba oyo etonda
na makambo ya lokuta mpe na moyibi,
engumba oyo ezangaka te koboma bato !
Tango nyonso, kaka makelele ya bafimbu,
makelele ya bapine :
bampunda ezali kopumbwa,
mpe bashar ezali koningana.
Basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda
bazali kotambola-tambola,
mipanga ezali kongenga,
makonga ezali koleka-leka lokola mikalikali !
Bato bazali kozoka, kokufa ebele penza !
Bongo bibembe elali-lali bisika nyonso,
mpe makolo ya bato ekomi kotuta bibembe
tango bazali kotambola.
 
Makambo oyo nyonso esalemi
likolo ya makambo ya nkele ya engumba
oyo etonda na kindumba,
engumba ya kitoko makasi
kasi etonda na misala ya soloka,
engumba oyo epengwisaka bikolo
na nzela ya kindumba na yango
mpe epengwisaka bato
na nzela ya misala na yango ya soloka.
 
« Natombokeli yo, »
elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ;
« nakotombola yo elamba kino na elongi,
nakolakisa bolumbu na yo
na miso ya bikolo mosusu
mpe nakoyokisa yo soni
na miso ya bamboka nyonso.
Nakobwakela yo bosoto,
nakosambwisa yo
mpe nakokomisa yo eloko ya maseki.
Bato nyonso oyo bakomona yo
bakokima mpe bakoganga :
‹ Engumba Ninive ebebisami boye !
Nani akoyokela yango mawa ? › »
 
Boni, okanisi ete ozali kitoko
koleka engumba Tebesi
oyo ezalaka pembeni ya ebale Nili
mpe ezingelama na mayi,
bongo ebale ebatelaka yango
mpe mayi ezalaka lokola mir
oyo ebombaka yango ?
Makasi na yango ezalaki kowuta
na Kushi mpe na Ejipito ;
bato ya Puti mpe ya Libi bazalaki kosunga yango.
10 Nzokande, yango mpe ekweyaki,
mpe bamemaki bato na yango na bowumbu.
Bakataki-kataki na biteni
bana na bango na babalabala nyonso,
babetaki zeke mpo na kopona
bato na yango ya lokumu
mpo ete bamema bango na bowumbu,
mpe bakangaki bakambi na yango minyololo.
11 Yo mpe okokoma lokola moto
oyo alangwe masanga,
yo mpe okoluka ekimelo
mpo na kokima banguna na yo.
 
12 Bandako na yo nyonso, oyo batonga makasi
ezali lokola banzete ya figi etonda
na bambuma ya liboso ekomela ;
soki kaka bameki koningisa yango,
bambuma ekweyaka kino na monoko ya moto ya lokoso.
13 Tala malamu mampinga na yo,
balemba lokola basi ;
bikuke ya mokili na yo ezali polele
liboso ya banguna na yo,
pamba te moto ezikisi bikangelo na yango.
14 Bino bato ya engumba oyo,
bomitokela libela mayi
mpo ete bakozingela bino ;
bolendisa libela bamir
oyo ebatelaka engumba na bino ;
bokamata mabele oyo batongelaka bandako,
bosangisa yango mpo ete ekoma potopoto,
bongo bobeta babiliki mpe botumba yango.
15 Kuna nde moto ekoya kozikisa yo,
mopanga ekoya koboma yo
mpe kosilisa yo lokola mabanki.
Tika ete bato na yo bakoma ebele lokola mabanki,
bakoma lisusu ebele makasi lokola mankoko.
16 Okomisi motango ya bato na yo ya mombongo
ebele koleka ata minzoto ya likolo,
kasi babebisi mokili nyonso
mpe bapumbwe na bango
ndenge kaka mankoko esalaka.
17 Bakengeli na yo bazali lokola mankoko,
bakonzi ya basoda na yo bazali
lokola maboke ya mabanki
oyo eyaka kovanda na bamir ya lopango
na tango ya malili ;
kasi soki kaka moyi ebimi, yango nyonso epanzani,
mpe moto moko te ayebaka esika yango ekendaka.
 
18 Oh mokonzi ya Asiri,
bakambi na yo bazali kolala pongi,
basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi,
mampinga na yo bapalangani na bangomba
mpe moto akosangisa bango azali komonana te.
19 Ezali ata na kisi moko te
oyo ekoki kobikisa pota na yo ;
pota na yo ezali monene makasi !
Moto nyonso oyo akoyoka sango
ya makambo oyo ekomeli yo
akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo.
Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?