Nzembo 104
Lokumu epai na Yawe
Eh molimo na ngai, pambola Yawe !
 
Yawe, Nzambe na ngai, ozali monene !
Olata kongenga mpe lokumu,
omifinika moyi lokola kazaka,
otanda likolo lokola ndako ya kapo.
 
Opika makonzi na yango na mayi ya likolo,
okomisaka mapata shar na Yo,
otambolaka na mapapu ya mopepe.
Okomisaka bantoma na Yo mipepe,
mpe basali na Yo, ndemo ya moto.
 
Otia mokili na likolo ya miboko na yango
mpo ete eningana te seko na seko.
Ozipa yango na mayi monene lokola elamba ;
mayi ezalaki kovanda na likolo ya bangomba.
 
Kasi na pamela na Yo, mayi ekimaki ;
na lokito ya kake na Yo, mayi etiolaki,
emataki na likolo ya bangomba,
ekitaki na mabwaku,
na bisika oyo obongisaki mpo na yango.
Otiaki mondelo oyo ekoki koleka te ;
ekozonga lisusu te kozipa mokili.
 
10 Obimisaka mayi ya bitima
mpo na kosopa yango na mayi minene
oyo elekaka na kati-kati ya bangomba ;
11 ekomaka mayi ya komela
mpo na banyama nyonso ya bilanga
mpe mpo na ba-ane ya zamba.
12 Bandeke ya likolo evandaka
pembeni ya mayi yango
mpe eyembaka kati na makasa.
 
13 Wuta na bandako na Yo ya likolo,
onokisaka mvula na likolo ya bangomba ;
mokili etondi na mbuma ya misala na Yo.
14 Matiti ebotaka mpo na bibwele,
mpe milona ya bato ekolaka
mpo ete mabele ebotela bango bilei,
15 vino mpo na kosepelisa mitema na bango,
mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango,
mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.
 
16 Banzete ya Yawe etondi na mayi ;
ndenge wana nde ezali, banzete ya sedele ya Libani,
oyo Yawe alona.
17 Bandeke esalaka bazala na yango kuna,
mpe nkoko evandaka na banzete ya sipele.
18 Bangomba milayi ezali ekimelo
mpo na bantaba ya zamba,
mpe madusu ya mabanga ezali bibombamelo
mpo na bampanya ya zamba.
 
19 Osala sanza mpo na koyeba mikolo ya bafeti.
Moyi eyebi tango na yango ya kolala.
20 Otindaka molili, mpe butu ekomaka.
Bongo banyama nyonso ya zamba ekomaka
kotambola-tambola.
21 Bana ya nkosi egangaka sima na nyama
mpe esengaka bilei epai ya Nzambe.
22 Soki moyi ebimi, nkosi elongwaka,
ezongaka mpo na kolala na bisika na yango ;
23 kasi moto abimaka mpo na kokende na mosala na ye
mpe asalaka kino na pokwa.
 
24 Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele !
Osalaki nyonso na bwanya ;
mokili etondi na biloko oyo okela.
25 Tala ndenge ebale monene ezali
molayi mpe epanzana,
etonda na banyama oyo tokoki kotanga te,
kobanda na oyo eleki mike kino na oyo eleki minene.
26 Kuna, bamasuwa ekendeke mpe ezongaka ;
bongo Leviatani oyo osala mpo ete esakanaka kuna.
 
27 Nyonso etalelaka Yo
mpo ete opesa yango bilei na tango oyo ekoki.
28 Opesaka bilei, mpe ezwaka yango ;
ofungolelaka yango loboko na Yo,
mpe etondaka na biloko.
 
29 Tango obombaka elongi na Yo,
somo ekangaka yango ;
tango olongolaka yango pema,
ekufaka mpe ezongaka na putulu ;
30 tango otindaka pema Yo, ezwaka bomoi ;
mpe okomisaka mokili sika.
 
31 Tika ete nkembo ya Yawe ewumela
libela na libela !
Tika ete Yawe asepela na misala na Ye !
32 Soki atali mokili, mokili elengaka ;
soki asimbi bangomba, ebimisaka milinga.
 
33 Nakoyembela Yawe
bomoi na ngai mobimba ;
nakoyembela Nzambe na ngai
tango nyonso nazali na bomoi.
34 Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye !
Tika ete Yawe azala esengo na ngai !
35 Tika ete bato ya masumu basila na mokili,
mpe bato mabe bazala lisusu te !
 
Oh molimo na ngai, pambola Yawe !
Aleluya, bokumisa Yawe !