Nzembo 105
Nzambe azali bolingo
Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye !
Bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo !
Boyemba mpo na lokumu na Ye,
bosanzola Ye na mindule !
Botatolaka tango nyonso
misala minene na Ye nyonso !
 
Bosepela na Kombo na Ye ya bule !
Tika ete mitema ya bato
oyo balukaka Yawe etonda na esengo !
Bomipesa na Yawe.
Bosenga makasi na Ye.
Bolukaka tango nyonso elongi na Ye.
 
Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki
mpe bitumbu oyo apesaki,
bino, bakitani ya Abrayami, mosali na Ye ;
bino, baponami na Ye, bana mibali ya Jakobi !
 
Yawe azali Nzambe na biso,
mikano na Ye ekambaka mokili mobimba.
Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye,
bilaka na Ye mpo na bikeke nkoto moko,
boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami,
mpe ndayi oyo alapaki epai ya Izaki.
10 Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobi
lokola mobeko,
epai ya Isalaele lokola boyokani ya libela na libela,
11 tango alobaki :
« Nakopesa yo mokili ya Kanana
lokola libula oyo epesameli yo ! »
 
12 Na tango wana, bazalaki kaka
motango moke ya bato
mpe bapaya kati na yango ;
13 bazalaki koyengayenga
longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu,
longwa na mokili moko kino na mokili mosusu.
 
14 Atikaki moto moko te konyokola bango ;
apamelaki bakonzi na tina na bango :
15 « Bosimba bapakolami na Ngai te,
bosala mabe te epai na basakoli na Ngai ! »
 
16 Abengisaki nzala makasi kati na mboka,
azangisaki bango bilei.
17 Atindaki moto moko liboso na bango :
Jozefi oyo atekamaki lokola mowumbu.
18 Bakangaki makolo na ye na minyololo
mpe batiaki bibende na kingo na ye,
19 kino makambo oyo Jozefi asakolaki ekokisamaki,
kino Liloba na Yawe etalisaki
ete Jozefi alobaki solo.
 
20 Mokonzi apesaki mitindo
ete bafungola ye minyololo,
mokambi atikaki ye na bonsomi.
21 Akomisaki ye nkolo ya ndako na ye
mpe moyangeli ya biloko na ye nyonso,
22 mpo ete akonza bakambi na ye
mpe alakisa bwanya epai ya bapesi toli ya mokonzi.
 
23 Bongo Isalaele akendeki na Ejipito ;
mpe Jakobi avandaki lokola mopaya
kati na mokili ya Cham.
 
24 Yawe asalaki ete bato na Ye babota mingi,
mpe akomisaki bango makasi
koleka banguna na bango.
25 Abongolaki mitema ya banguna yango
mpo ete bayina bato na Ye
mpe banyokola bango makasi.
 
26 Atindaki mosali na Ye, Moyize,
mpe Aron oyo aponaki.
27 Na mitindo na Ye Nzambe,
basalaki bikamwa kati na Ejipito,
misala minene kati na mokili ya Cham.
28 Atindaki molili oyo ekotaki kati na mokili,
mpe bato ya Ejipito batombokelaki maloba na Ye te.
29 Abongolaki mayi makila,
mpe abomaki mbisi na yango.
30 Mokili na bango etondaki na magorodo
kino na bashambre ya mokonzi na bango.
 
31 Na mitindo na Ye,
banzinzi oyo eswaka mpe bangungi eyaki
na mboka mobimba.
32 Na esika ya mvula,
atindelaki bango mvula ya mabanga
mpe abetisaki kake kati na mokili na bango.
33 Abebisaki bilanga na bango ya vino mpe ya figi,
mpe abukaki banzete ya mboka na bango.
 
34 Na mitindo na Ye,
mabanki mpe makelele oyo bakokaki kotanga te
esopanaki,
35 eliaki matiti nyonso ya mobesu
kati na mokili na bango,
eliaki bambuma ya mabele na bango.
 
36 Abomaki bana liboso nyonso
kati na mokili na bango,
bambuma ya liboso ya makasi na bango.
37 Abimisaki Isalaele, bato na Ye,
elongo na palata mpe wolo ;
mpe moko te atiaki tembe
kati na mabota na bango.
 
38 Ejipito esepelaki komona bango kobima,
pamba te somo ya Isalaele ekangaki bango.
 
39 Atandaki lipata mpo na kobatela bango,
mpe moto mpo na kopesa pole na butu.
 
40 Ndenge kaka basengaki, atindelaki bango bakayi
mpe atondisaki bango na bilei ya likolo.
41 Afungolaki libanga, mpe mayi ebimaki,
etiolaki lokola ebale kati na esobe.
 
42 Mpo ete akanisaki elaka ya bule
oyo apesaki mosali na Ye, Abrayami,
43 abimisaki na esengo bato na Ye,
baponami na Ye na koganga ya esengo.
 
44 Apesaki bango mabele ya bikolo mosusu
mpe bazwaki lokola libula mosala ya bikolo yango
45 mpo ete babatela mitindo na Ye
mpe batosa mibeko na Ye.
 
Bokumisa Yawe !