Nzembo 108
Nakolonga
Nzembo ya Davidi.
Nzambe, motema na ngai ezali na kimia !
Nakoyembela Yo, nakosanzola Yo na mindule ;
ezali mpe lokumu na ngai.
Lindanda mpe nzenze, bolamuka !
Nalingi kolamusa tongo.
 
Nkolo, nakosanzola Yo kati na bato,
nakoyembela Yo kati na bikolo.
Pamba te bolingo na Yo ezali monene koleka Lola,
mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.
 
Oh Nzambe, tika ete otombolama na likolo ya Lola,
mpe nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba !
Bikisa biso na nguya ya loboko na Yo
mpe yanola biso,
mpo ete balingami na Yo bakangolama !
 
 
Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule :
« Nakolonga ! Nakokabola Sishemi
mpe nakotia bandelo ya lubwaku ya Sukoti.
Galadi ezali ya ngai,
Manase mpe ezali ya ngai ;
Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende,
mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.
10 Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka,
Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai.
Nazali kobeta milolo ya bitumba
mpo na kobundisa mokili ya Filisitia. »
 
11 Nani akomema ngai na engumba batonga makasi ?
Nani akotambolisa ngai kino na Edomi ?
12 Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso,
Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba
elongo na mampinga na biso !
13 Yaka kosunga biso,
kangola biso liboso ya moyini !
Pamba te lisungi ya bato ezali pamba.
14 Elongo na Nzambe,
tokosala makambo minene mpe ya kokamwa ;
ezali Ye nde akonyata banguna na biso.