Buku ya mitano
107
Nz 107.1–150.6
Nzembo ya basikolami
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,
mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Tika ete bato oyo Yawe asikolaki
baloba bongo,
ba-oyo akangolaki wuta na maboko ya monguna,
ba-oyo asangisaki wuta na bikolo nyonso,
wuta na este, na weste, na nor mpe na sude.
 
Ndambo bazalaki koyengayenga na esobe,
na esika oyo ezanga bato,
bamonaki te nzela ya engumba
epai wapi bakoki kovanda.
Likolo ya nzala mpe ya posa ya mayi,
bakomaki pene ya kokufa.
Bongo kati na pasi na bango,
babelelaki Yawe,
mpe akangolaki bango na mitungisi na bango.
Atambolisaki bango na nzela ya alima
mpo ete bakende kovanda kati na engumba.
Tika ete basanzola Yawe
mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !
Apesaki mayi epai ya bato
oyo bazalaki na posa ya mayi
mpe bilei epai ya bato oyo bazalaki na nzala.
 
10 Bato oyo bazalaki kovanda na bisika
ya molili makasi mpe ya molili ya kufa
bazalaki ya kokangama na minyoko
mpe na minyololo ya bibende,
11 pamba te batombokelaki maloba na Nzambe
mpe batiolaki mabongisi ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
12 Abukaki lolendo ya mitema na bango
na nzela ya misala makasi ;
bakweyaki, mpe moko te asungaki bango.
13 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe,
mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.
14 Abimisaki bango
wuta na molili makasi mpe na molili ya kufa,
mpe abukaki minyololo na bango.
15 Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo
mpe bikamwa na Ye mpo na bato !
16 Pamba te abukaki bikuke ya bronze
mpe akataki bikangelo ya mabende.
 
17 Bamosusu bakomaki bazoba
mpo na etamboli mabe na bango,
mpe bato na pasi, mpo na masumu na bango.
18 Minoko na bango eyinaki bilei nyonso,
mpe bakomaki pene ya bikuke ya kufa.
 
19 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe,
mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.
20 Atindaki Liloba na Ye mpe abikisaki bango,
akangolaki bango wuta na kunda.
 
21 Tika ete basanzola Yawe
mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !
22 Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondi
mpe bapanza sango ya misala na Ye
na koganga na esengo !
 
23 Bato oyo bakendaka mobembo
na ebale monene kati na masuwa
mpe basalaka mombongo na mayi minene
24 bamonaki misala ya Yawe,
mpe bikamwa kati na ebale monene.
 
25 Alobaki, mpe mopepe makasi eyaki,
etombolaki bambonge.
26 Bazalaki komata kino na likolo
mpe kokita kino na se,
bazalaki kolemba nzoto kati na pasi.
27 Bazwaki kizunguzungu mpe bakomaki kotenga-tenga
lokola bato balangwe masanga,
bwanya na bango nyonso elimwaki.
 
28 Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe
mpe abimisaki bango na mitungisi na bango.
29 Akitisaki mopepe makasi,
bambonge ya ebale monene evandaki kimia.
30 Basepelaki na kimia oyo ezongaki,
mpe Nzambe amemaki bango
kino na libongo oyo balingaki.
 
31 Tika ete basanzola Yawe
mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato !
32 Tika ete banetola Ye kati na lisanga ya bato
mpe bakumisa Ye kati na mayangani ya bakambi.
 
33 Akoki kobongola bibale esobe ;
kobongola bitima mabele ya kokawuka ;
34 kobongola mabele oyo ebotaka bambuma
mabele ya mungwa
likolo ya mabe ya bavandi na yango.
35 Akoki kobongola esobe liziba ;
kobongola mabele ya kokawuka bitima.
36 Akoki kosala ete bato na nzala
bakoma kovanda kuna,
batonga engumba oyo bato bakoki kovanda,
37 babwaka bambuma na bilanga
mpe balona banzete ya vino
oyo ekobota bambuma ebele.
 
38 Apamboli bango, mpe bakomi ebele ;
mpe akitisi te motango ya bibwele na bango.
 
39 Motango ya bato mosusu ekiti
mpe balembi nzoto mpo na minyoko mpe pasi.
 
40 Nzambe asambwisaka bato minene,
akotisaka bango na mobulu makasi
kino bazanga nzela ya kobimela na pasi.
41 Kasi akangolaka babola wuta na pasi na bango,
mpe asalaka ete babotana ebele
kati na bituka na bango
lokola etonga ya bameme.
 
42 Tango bato ya sembo bamonaka bongo,
basepelaka,
kasi bato nyonso ya mabe bakangaka
minoko na bango.
43 Tika ete moto ya bwanya asala keba
na makambo wana nyonso
mpe akanisa na tina na bolingo ya Yawe !