Nzembo 110
Mokonzi mpe Nganga-Nzambe
Nzembo ya Davidi.
Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai :
« Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »
Wuta na Siona, Yawe akosala
ete nguya na yo ya bokonzi ekende mosika,
mpe okokonza kati na banguna na Yo.
 
Na mokolo oyo okotanda basoda na yo
na molongo mpo na bitumba,
bato na yo bakotonda na mpiko,
bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu
epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.
 
Yawe alapaki ndayi oyo,
akobongola maloba na Ye te :
« Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela
kolanda molongo ya Melishisedeki ! »
 
Nkolo azali na ngambo ya loboko na yo ya mobali,
akopanza bakonzi na mokolo ya kanda na Ye.
Akopesa bikolo etumbu :
bikolo nyonso ekotonda na bibembe,
mpe akonyata bakambi kati na mokili mobimba.
Na nzela, mokonzi amelaka mayi na mwa moluka ;
yango wana atombolaka moto.