Nzembo 111
Mosali makambo ya kokamwa
Bokumisa Yawe !
 
Nakokumisa Yawe
na motema na ngai mobimba
kati na likita ya bato ya sembo
mpe kati na mayangani.
 
Yawe asalaka makambo minene ;
bato nyonso oyo balingaka yango
bakanisaka yango.
Misala na Ye emonisaka
nkembo mpe lokumu na Ye,
mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela.
Alingaka ete bakanisa bikamwa na Ye.
Yawe atondi na mawa
mpe atalisaka ngolu na Ye.
Apesaka bato oyo batosaka Ye bilei ;
akanisaka Boyokani na Ye tango nyonso.
 
Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Ye
na nzela ya misala na Ye
tango apesaki bango libula
ya bato ya bikolo mosusu.
Misala na Ye nyonso elakisaka
boyengebene mpe bosembo na Ye ;
mibeko na Ye nyonso ebongi na kondima yango.
Epesama mpo na libela,
mpe esengeli kotosa yango
na bosembo mpe na bosolo.
Akangolaki bato na Ye,
mpe asalaki Boyokani ya libela elongo na bango.
Azali Nzambe Mosantu mpe Nzambe ya somo.
 
10 Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;
bato nyonso oyo batosaka Yawe
bazali na mayele ya peto.
Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.