Nzembo 115
Nkembo epai ya Nzambe kaka
Na biso te, Yawe, na biso te,
kasi pesa nkembo na Kombo na Yo
mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo.
 
Mpo na nini bikolo eloba :
« Wapi Nzambe na bango ? »
Nzambe na biso azali na Lola,
asalaka nyonso oyo alingi.
Kasi banzambe na bango ya bikeko ezali
ya palata mpe ya wolo,
esalema na maboko ya bato.
Ezali na minoko, kasi elobaka te ;
ezali na miso, kasi emonaka te ;
ezali na matoyi, kasi eyokaka te ;
ezali na zolo, kasi eyokaka solo te ;
ezali na maboko, kasi esimbaka te ;
ezali na makolo, kasi etambolaka te.
Minoko na yango ebimisaka ata makelele te.
Bato oyo basalaka yango
mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema
bakokani na yango.
 
Bana ya Isalaele, botia elikya kati na Yawe !
Azali lisungi mpe nguba na bango.
10 Bakitani ya Aron, botia elikya kati na Yawe !
Azali lisungi mpe nguba na bino.
11 Bino bato oyo botosaka Yawe,
botia elikya kati na Yawe.
Azali lisungi mpe nguba na bango.
 
12 Yawe akanisaka biso, akopambola ;
solo, akopambola bana ya Isalaele,
akopambola bakitani ya Aron.
13 Akopambola bato oyo batosaka Yawe
kobanda na bato pamba kino na bato minene.
14 Tika ete Yawe afulukisa bino,
bino mpe bana na bino !
 
15 Tika ete Yawe apambola bino,
Ye oyo asala likolo mpe mabele.
 
16 Likolo ezali likolo ya Yawe ;
kasi apesa mabele epai ya bato.
17 Ezali te bakufi nde bakumisaka Yawe,
pamba te bango nyonso bakendaka
na esika ya kimia.
18 Kasi biso, tokopambola Yawe,
kobanda sik’oyo kino libela na libela.
 
Bokumisa Yawe !