Nzembo 114
Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito
Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito,
tango libota ya Jakobi elongwaki
na ekolo ya bapaya,
Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe,
mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye.
 
Ebale monene emonaki yango mpe ekimaki,
mayi ya Yordani ezongaki na sima,
bangomba epumbwaki lokola bameme,
bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba.
 
Ebale monene, nini ezalaki kati na yo
mpo ete okima ?
Yordani, mpo na nini ozongaki na sima ?
Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki
lokola bameme ?
Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki
lokola bana ya ntaba ?
 
Mokili, lenga liboso ya Yawe,
liboso ya Nzambe ya Jakobi,
oyo abongolaka libanga monene liziba,
mpe libanga etima.