Nzembo 120
Kangola ngai
Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.
Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe,
mpe ayanolaki ngai.
Oh Yawe, kangola ngai
wuta na maboko ya bakosi
mpe wuta na lolemo ya lokuta !
 
Yo, lolemo ya lokuta,
Yawe akopesa yo nini,
akofuta yo nini ?
Akobeta yo na makonga ya elombe ya bitumba,
oyo ezali ya songe,
elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube.
Mawa na ngai, mpo ete navandi
lokola mopaya kati na Mesheki,
kati na bandako ya kapo ya Kedari.
Navandaki tango molayi
kati na bato oyo balingaka kimia te.
Ngai, nazali moto ya kimia ;
kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia,
bango baponaka mbala moko bitumba.