Nzembo 121
Yawe, Mosungi mpe Mobateli na ngai
Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.
Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba :
lisungi na ngai ekowuta wapi ?
Lisungi na ngai ewutaka na Yawe
oyo akela likolo mpe mabele.
Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ;
Ye oyo abatelaka yo animbaka te.
 
Te, Ye oyo abatelaka Isalaele
animbaka te mpe alalaka pongi te !
Yawe azali mobateli na yo ;
Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali,
lokola elili oyo ebatelaka yo.
 
Ezala na moyi to na butu,
moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te !
Yawe akobatela yo na mabe nyonso,
akobatela bomoi na yo ;
Yawe akobatela kokende
mpe kozonga na yo,
sik’oyo mpe libela na libela.