Nzembo 124
Lisungi na biso ewutaka epai ya Yawe
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Soki Yawe abatelaki biso te ;
tika ete Isalaele aloba bongo !
Soki Yawe abatelaki biso te
tango bato babundisaki biso,
mbele bamelaki biso ya bomoi
tango basilikelaki biso makasi.
Boye mayi elingaki kozindisa biso,
mbonge makasi elingaki komema biso.
Mayi makasi elingaki kozindisa biso.
 
Tika ete Yawe apambolama,
Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso !
Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo
ya mokangi bandeke ;
motambo ekatanaki, mpe tokimaki.
Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe
oyo akela likolo mpe mabele.