Nzembo 125
Kimia ya solo
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe.
Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe
bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te,
oyo epikama mpo na libela.
Ndenge bangomba ezingeli Yelusalemi,
ndenge wana mpe Yawe azingeli bato na Ye,
kobanda sik’oyo kino libela na libela.
Bokonzi ya mabe ekowumela te na etuka ya bato ya sembo,
mpo ete basangana te na mabe.
 
Yawe, zala malamu mpo na bato malamu
mpe mpo na bato oyo bazali alima na mitema !
Kasi tika ete Yawe abengana
bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe !
 
Tika ete kimia ezala na Isalaele !