Nzembo 13
Kobanga mpe kolikya
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Yawe, kino tango nini okobosana ngai mpo na libela ?
Kino tango nini okobomba elongi na Yo mpo ete namona Yo te ?
Kino tango nini nakozala mawa-mawa
kati na motema na ngai
mpe nakomitungisa mikolo nyonso ?
Kino tango nini monguna na ngai akolonga ngai ?
 
Yawe, Nzambe na ngai, tala mpe yanola ngai.
Sala ete miso na ngai emona malamu ;
soki te, nakokufa,
bongo monguna na ngai akoloba :
« Nalongi ye, »
mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.
 
Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo,
mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo.
Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe,
pamba te asaleli ngai bolamu.