Nzembo 12
Nzambe akokisaka bilaka na Ye
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.
Yawe, sunga biso !
Pamba te bayengebene bazali lisusu te ;
bato ya kotiela motema bazali lisusu te
kati na bana na bato.
Bato nyonso bazali kokosana bango na bango,
bazali kolobana maloba ya sukali,
kasi mitema na bango ezali sembo te.
 
Tika ete Yawe aboma bato nyonso
oyo balobaka maloba ya sukali
mpe batondi na lolendo,
ba-oyo balobaka :
« Tokolonga na nzela ya lolemo na biso,
bibebu na biso ekolobela biso ;
nani akoluka kozala nkolo na biso ? »
 
Yawe alobi :
« Mpo ete bazali konyokola babola
mpe kolelisa bato oyo bakelela,
natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. »
Maloba ya Yawe ezalaka peto
lokola palata oyo balekisi na moto
mpe bapetoli mbala sambo.
 
Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela,
okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe.
Bato mabe batambolaka na bonsomi bipai na bipai
soki bato bapesi bozoba lokumu.