Nzembo 131
Kimia ya solo
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te,
miso na ngai ezali na posa makasi te ;
namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene
mpe eleki pasi mpo na ngai.
Kasi nabatelaki kimia kati na motema na ngai
mpe namitungisaki te
lokola mwana moke elongo na mama na ye.
Nazali na kimia lokola mwana
oyo mama alongola na mabele.
Isalaele, tia elikya kati na Yawe
kobanda sik’oyo mpe libela na libela.