Nzembo 130
Wuta na mozindo ya pasi
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo.
Nkolo, nazali kobelela Yo wuta na mozindo ya pasi !
Nkolo, yoka ngai !
Yoka mabondeli na ngai !
Yawe, soki obosanaka masumu te,
Nkolo, nani akokaki kotelema ?
Kasi bolimbisi ezali epai na Yo,
yango wana basengeli kotosa Yo.
 
Na motema na ngai mobimba,
nazali na elikya kati na Yawe,
nazali penza na elikya ;
nazali kozela maloba na Ye.
Nazali na elikya kati na Nkolo
koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo,
koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.
 
Isalaele, tia elikya kati na Yawe,
pamba te azali bolingo,
mpe kokangolama ya kokoka ezali elongo na Ye.
Ye nde akokangola Isalaele
na bambeba na yango nyonso.