Nzembo 133
Tango bandeko basangani
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko
mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !
Ezali lokola malasi ya motuya
oyo basopi na moto,
bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron,
ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye.
Ezali lokola mamwe ya Erimoni,
oyo ekitaka na bangomba ya Siona.
Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye,
mpe bomoi, mpo na libela.