Nzembo 134
Bokumisa Yawe
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo.
Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo,
oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo.
 
Botombola maboko na bino na ngambo ya Esika ya bule
mpe bopambola Yawe !
Tika ete Yawe apambola bino, wuta na Siona,
Ye oyo asala likolo mpe mabele !