Nzembo 135
Yawe azali malamu
Bokumisa Yawe !
 
Bokumisa Kombo ya Yawe !
Bokumisa Ye, bino basali ya Yawe,
oyo botelemaka kati na Ndako ya Yawe,
kati na lopango ya Ndako ya Nzambe na biso !
 
Bokumisa Yawe !
Pamba te Yawe azali malamu !
Boyembela Kombo na Ye,
pamba te ezali kitoko makasi.
Pamba te Yawe aponaki Jakobi,
Isalaele, mpo ete azala ya Ye moko.
 
Solo, ngai nayebi malamu ete Yawe azali monene,
ete Nkolo na biso aleki banzambe nyonso.
Yawe asalaka nyonso oyo alingi,
kuna na likolo mpe awa na mabele,
kati na bibale minene mpe kati na mozindo nyonso.
 
Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili,
atindaka mikalikali elongo na mvula,
abimisaka mopepe wuta na bibombelo na yango.
 
Ye nde abomaki bana ya liboso ya Ejipito,
kobanda na bato kino na banyama ;
atindaki bilembo ya kokamwa mpe bikamwa
kati na yo, Ejipito,
mpo na kotelemela Faraon mpe basali na ye nyonso ;
10 abebisaki bikolo ebele
mpe abomaki bakonzi ya nguya :
11 Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ;
Ogi, mokonzi ya Bashani ;
mpe bakonzi nyonso ya Kanana.
12 Mpe akabaki mikili na bango lokola libula,
lokola libula epai ya bato na Ye, Isalaele.
 
13 Oh Yawe, sango ya Kombo na Yo
ewumelaka libela na libela !
Yawe, bakopanza sango ya Kombo na Yo
seko na seko !
14 Pamba te Yawe akolimbisa bato na Ye,
akoyokela basali na Ye mawa.
 
15 Banzambe ya bikolo ezali ya palata mpe ya wolo,
esalema na maboko ya bato.
16 Ezali na minoko, kasi elobaka te ;
ezali na miso, kasi emonaka te ;
17 ezali na matoyi, kasi eyokaka te ;
ezali ata na pema te kati na minoko na yango.
18 Bato oyo basalaka yango
mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema
bakokani na yango.
 
19 Bato ya Isalaele, bopambola Yawe !
Bakitani ya Aron, bopambola Yawe !
20 Bakitani ya Levi, bopambola Yawe !
Bino nyonso oyo botosaka Yawe,
bopambola Yawe !
21 Tika ete, wuta na Siona, Yawe apambolama,
Ye oyo avandaka na Yelusalemi !
 
Bokumisa Yawe !