Nzembo 146
Nzambe alongisaka banyokolami
Bokumisa Yawe !
 
Oh molimo na ngai, kumisa Yawe !
Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba,
nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso
nakozala na bomoi.
 
Botia elikya te na bakambi
to na bato oyo bazangi makoki ya kobikisa.
Soki bakufi, bazongaka na mabele,
mpe, mbala moko, mabongisi na bango elimwaka.
 
Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye,
oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye !
 
Yawe akelaki Likolo mpe mabele,
ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ;
azali sembo seko na seko.
Yawe akataka na sembo makambo ya banyokolami
mpe apesaka bilei na bato oyo bazali na nzala ;
abimisaka bakangami na boloko.
Yawe abikisaka miso ya bakufi miso ;
Yawe asembolaka bato oyo bazali ya kogumbama ;
Yawe alingaka bato ya sembo.
Yawe abatelaka bapaya,
asungaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali,
kasi abebisaka banzela ya bato mabe.
 
10 Yawe azali Mokonzi seko na seko ;
Nzambe na yo, oh Siona, libela na libela !
 
Bokumisa Yawe !