Nzembo 147
Nzambe kati na mokili mpe kati na tango
Bokumisa Yawe !
 
Tala ndenge ezali malamu kosanzola Nzambe na biso,
mpe ndenge ezali kitoko kokumisa Ye !
Yawe azali kotonga lisusu Yelusalemi
epai wapi akosangisa bato ya Isalaele
oyo bakenda na bowumbu.
Abikisaka bato oyo batutami na mitema
mpe akawusaka bapota na bango.
 
Ayebi motango ya minzoto
mpe abengaka moko na moko na kombo na yango.
Nkolo na biso azali monene mpe atonda na nguya ;
mayele na Ye ezali na mondelo te.
Yawe asungaka babola,
kasi akitisaka bato mabe kino na mabele.
 
Boyembela Yawe nzembo ya matondi !
Bobetela Nzambe na biso lindanda mpo na kosanzola Ye !
Azipaka likolo na mapata,
abongisaka mvula mpo na mokili
mpe abotisaka matiti na bangomba.
Apesaka bilei epai ya bibwele
mpe epai ya bana ya yanganga oyo ezali koganga mpo na nzala.
10 Asepelaka na makasi ya mpunda te
mpe alingaka te nguya ya moto ;
11 kasi Yawe asepelaka na bato oyo batosaka Ye,
ba-oyo batielaka bolingo na Ye motema.
 
12 Yelusalemi, pesa nkembo na Yawe !
Siona, kumisa Nzambe na yo !
13 Alendisaka bikangelo ya bikuke na yo
mpe apambolaka bana na yo epai na yo.
14 Atiaka kimia na etuka na yo
mpe atondisaka yo na farine.
 
15 Atindaka mitindo na Ye na mokili,
mpe maloba na Ye epanzanaka mbala moko !
16 Anokisaka mvula ya pembe lokola bapwale ya meme
mpe apanzaka mvula ya mabanga lokola putulu ;
17 akweyisaka mabanga ya mvula yango
lokola mabanga ya mike-mike ;
nani akoki kotelema na malili na yango ?
18 Soki kaka atindi liloba, malili ekomaka kosila moke-moke ;
mpe soki atindi mopepe, mayi ekomaka kotiola.
 
19 Asakolaki liloba na Ye epai ya Jakobi,
mibeko mpe malako na Ye epai ya Isalaele.
20 Asalaki bongo na ekolo ata moko te ;
boye eyebaka mpe mibeko na Ye te.
 
Bokumisa Yawe !