Nzembo 15
Nani akoki kovanda esika moko na Nzambe
Nzembo ya Davidi.
Yawe, nani akoki kovanda kati na Ndako na Yo ya bule ?
Nani akoki kowumela na ngomba na Yo ya bule ?
 
Ezali moto oyo azangi pamela,
oyo asalaka makambo ya sembo
mpe alobaka solo ndenge ezali kati na motema na ye ;
oyo akoselaka moninga makambo te,
asalaka ye mabe te,
mpe ayokisaka ye pasi te ;
asanganaka te na moto oyo asalaka mabe,
kasi apesaka lokumu na moto oyo atosaka Yawe ;
akokisaka ndayi na ye atako ekopesa ye pasi,
mpe abongolaka mokano na ye te ;
asengaka mileki te soki adefisi mbongo,
andimaka kanyaka te
mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te.
 
Moto nyonso oyo atambolaka bongo
akotikala kopengwa te.