Nzembo 16
Nzela ya bomoi
Nzembo ya Davidi.
Nzambe, batela ngai,
pamba te nabombami kati na Yo.
 
Nalobaka na Yawe : « Ozali Nkolo na ngai,
Yo moko kaka nde ozali bolamu na ngai. »
Natatolaka na tina na basantu
oyo bazali kati na mboka
ete bazali penza bato minene
oyo nasepelaka na bango makasi.
Bato oyo bapotaka mbangu mpo na koluka bolamu epai
ya banzambe mosusu bakomona pasi mingi.
Nakosopa te mbeka na bango ya makila epai ya banzambe ya lolenge wana
mpe nakotanga bakombo na yango te na bibebu na ngai.
 
Yawe, Yo moko kaka nde ozali
libula mpe bomoi na ngai ;
ozali ndanga ya bozwi na ngai.
Nazwi etando ya motuya makasi,
ezali libula ya kitoko penza mpo na ngai !
Nakopambola Yawe oyo apesaka ngai toli
mpe, ezala na butu, angengisaka makanisi na ngai.
Natalelaka Yawe tango nyonso,
pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.
 
Yango wana motema na ngai etondi na esengo,
molimo na ngai ezali kosepela,
nzoto na ngai mpe ekopema na kimia.
10 Oh Yawe, okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi,
okotika mpe te ete mosantu na Yo apola.
11 Okolakisa ngai nzela ya bomoi ;
okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo,
elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.