Nzembo 20
Yawe, longisa mokonzi na biso
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Tika ete Yawe ayanola yo
na tango ya pasi ;
tika ete Nzambe ya Jakobi azala
ndako batonga makasi mpo na kobatela yo.
Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule
mpe apesa yo makasi wuta na Siona.
Tika ete akanisa makabo na yo nyonso
mpe andima mbeka na yo ya kotumba.
Tika ete akokisa posa ya motema na yo
mpe mabongisi na yo nyonso.
 
Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yo
mpe tokotombola bendele
na Kombo ya Nzambe na biso.
Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso.
 
Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye,
ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola,
na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.
Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar,
bamosusu, kati na bampunda ;
kasi biso totiaka elikya na biso
kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.
Bango, bafukamaka mpe bakweyaka ;
kasi biso, tozalaka kaka ya kotelema
mpe totikalaka ngwi.
10 Yawe, bikisa mokonzi !
Yanola biso tango tozali kobelela.