Nzembo 21
Matondi mpo na elonga
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Yawe, mokonzi azali kosepela na nguya na Yo;
Tala ndenge nini elonga oyo opesi ye
epesi ye esengo monene !
Okokisi posa ya motema na ye
mpe opimeli ye te oyo azalaki kosenga Yo.
Oyei epai na ye na mapamboli ya motuya.
Na moto na ye, olatisi ye motole ya wolo
oyo basangisa na eloko mosusu.
Asengaki Yo bomoi, mpe opesaki ye yango ;
opesaki ye bomoi molayi mpe ya libela na libela.
Nkembo na ye ezali monene
mpo na lobiko oyo opesaki ye ;
olatisaki ye na kongenga mpe na lokumu.
Solo, okomisi ye etima ya mapamboli ya seko na seko ;
okomisaki ye moto ya esengo na miso na Yo.
Mokonzi atiaka elikya na Yawe,
aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso ;
loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.
10 Tango okomimonisa,
okokomisa bango lokola fulu ya moto.
Yawe akosilisa koboma bango na kanda na Ye,
mpe moto ekozikisa bango.
11 Okolimwisa mabota na bango na mokili,
mpe bakitani na bango, kati na bana ya bato.
12 Atako bakani kosala Yo mabe,
atako basali mabongisi ya mabe
mpo na kotelemela Yo,
bakotikala kolonga ata moke te ;
13 pamba te okobengana bango
tango okobwakela bango bambanzi ya tolotolo na Yo.
14 Yawe, telema na nguya na Yo !
Tokoyemba nguya na Yo na nzela ya banzembo.