Nzembo 26
Yawe, longisa ngai
Nzembo ya Davidi.
Yawe, longisa ngai na miso ya basambisi,
pamba te natambolaka na bosembo ;
natielaka Yawe motema,
nakozonga sima te.
Yawe, tala ngai malamu mpe meka ngai,
sosola motema mpe makanisi na ngai,
pamba te napengwaka te liboso ya bolingo na Yo
mpe nabikaka bomoi na ngai kolanda bosembo na Yo.
 
Navandaka esika moko te na bakosi,
natambolaka nzela moko te na bato ya mitema mibale.
Nayinaka kosangana elongo na bato ya misala mabe
mpe navandaka te esika moko na bato mabe.
Yawe, nasukoli maboko na ngai
mpo na kolakisa ete nasali mabe te,
mpe nabandi na etumbelo na Yo,
mpo na kozongisela Yo matondi
mpe kotatola misala minene na Yo.
 
Yawe, nasepelaka na Tempelo
epai wapi ovandaka elongo na nkembo na Yo.
Kolongola te molimo na ngai nzela moko na bato ya masumu,
bomoi na ngai elongo na basopi makila,
10 oyo maboko na bango etondi na makila,
mpe maboko na bango ya mibali etondi na kanyaka.
11 Natambolaka na bomoi ya bosembo ;
kangola ngai mpe salela ngai ngolu.
 
12 Makolo na ngai etambolaka na nzela ya alima ;
nakopambola Yawe kati na mayangani ya monene.