Nzembo 27
Nabatelami malamu epai ya Nzambe
Nzembo ya Davidi.
Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ;
nakobanga nani ?
Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ;
nakolenga liboso ya nani ?
 
Tango bato mabe babundisaka ngai
mpo na koluka kosala ngai mabe,
ezali bayini mpe banguna na ngai
nde baninganaka mpe bakweyaka.
Ata limpinga ezingeli ngai,
motema na ngai ekobanga soki moke te ;
ata etumba etelemi mpo na koboma ngai,
atako bongo, nakozala kaka na elikya makasi.
 
Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe,
eloko moko kaka oyo nasengaka makasi :
nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe,
mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe
mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
Pamba te, na tango ya pasi,
akobatela ngai kati na evandelo na Ye,
akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule
mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.
 
Bongo, nakotombola moto na ngai
na likolo ya banguna oyo bazingeli ngai ;
nakobanda kobonza, na se ya lokito ya esengo,
bambeka kati Ndako na Ye ya bule ;
nakobanda koyembela Yawe
mpe kobetela Ye mindule.
 
Yawe, yoka mongongo na ngai,
soki nabeleli Yo ;
salela ngai ngolu mpe yanola ngai.
Motema na ngai elobi na tina na Yo :
« Tala elongi na Ye ! »
Yawe, nakotala elongi na Yo.
Kopesa ngai mokongo te,
kobengana mosali na Yo te na kanda ;
osungaki ngai.
Kotika ngai te, kosundola ngai te,
Nzambe, Mobikisi na ngai.
10 Ata tata mpe mama na ngai basundoli ngai,
Yawe akolokota ngai.
11 Yawe, lakisa ngai nzela na Yo,
tambolisa ngai na nzela ya alima,
pamba te banguna na ngai bazali koluka ngai.
12 Kotika te ete nakangama na motambo ya bayini na ngai,
pamba te batatoli ya lokuta batelemi
mpo na kokosela ngai makambo,
bazali kobimisa maloba mabe.
 
13 Nakozalaka na elikya na likambo oyo :
nakobika bolamu ya Yawe
kati na mokili ya bato ya bomoi.
14 Talela Yawe !
Zala makasi mpe yika mpiko !
Talela Yawe !