Nzembo 28
Yawe, yanola ngai
Nzembo ya Davidi.
Yawe, nazali kobelela Yo !
Ozali Libanga na ngai,
koboya te koyoka ngai.
Soki te, nakozala lokola bato
oyo bazali kokita na kunda.
Yoka ngai tango nabondelaka Yo
mpo na kosenga lisungi,
tango natombolaka maboko na ngai,
na kotala na ngambo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
 
Kokumba ngai te elongo na bato mabe,
elongo na bato oyo basalaka mabe,
oyo balobaka makambo ya kimia epai ya baninga na bango,
kasi babombaka mabe kati na mitema na bango.
Zongisela bango kolanda misala na bango,
kolanda misala mabe na bango ;
zongisela bango kolanda misala ya maboko na bango,
mpe kweyisela bango oyo ekoki na misala na bango.
 
Pamba te bamemiaka te misala ya Yawe
mpe makambo oyo akokisaka,
akobamba bango na mabele
mpe akotikala kotelemisa bango lisusu te.
 
Tika ete Yawe akumisama,
pamba te ayanoli mabondeli na ngai.
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ;
natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai.
Motema na ngai etondi na esengo,
mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
 
Yawe azali makasi ya bato na Ye,
ndako batonga makasi epai wapi mopakolami na Ye azwaka lobiko.
Yawe, bikisa bato na Yo
mpe pambola libula na Yo ;
zala mobateli na bango
mpe sunga bango mpo na libela.