Nzembo 31
Natie elikya na ngai kati na Yawe
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
Eh Yawe, kati na Yo nde nazwa ebombamelo ;
kondima te ete nayoka soni !
Bikisa ngai na bosembo na Yo !
Yoka ngai mpe kangola ngai noki !
Zala mpo na ngai libanga oyo ezingelami na bamir
mpe ndako batonga makasi mpo na kobikisa ngai.
Mpo ete ozali libanga na ngai
mpe ndako na ngai ya makasi,
kamba mpe tambolisa ngai
mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
Bikisa ngai na motambo oyo batieli ngai,
pamba te ozali ebombamelo na ngai.
Nazongisi molimo na ngai kati na maboko na Yo,
Yawe, Nzambe ya solo, oyo okangolaki ngai.
 
Nalingaka te bato nyonso oyo bakangamaka
na banzambe ya bikeko,
pamba te natiaka elikya na ngai kati na Yawe.
Nakozalaka moto ya esengo
mpe nakosepelaka kati na bolingo na Yo ;
pamba te omonaka pasi na ngai,
mpe oyebi mitungisi na ngai.
Okabaki ngai te na maboko ya monguna na ngai,
kasi obombaka ngai mosika,
na esika ya kimia penza.
10 Yawe, yokela ngai mawa,
pamba te nazali kati na pasi ;
miso, motema mpe nzoto na ngai mobimba
ebebi mpo na mawa.
11 Bomoi na ngai ekawuki mpo na pasi,
mpe mibu na ngai ezali koleka kati na kolela ;
makasi na ngai esili mpo na mabe na ngai,
mpe mikuwa na ngai elembi.
12 Banguna na ngai nyonso bakomi kozwa ngai
lokola eloko ya lisuma,
baninga na ngai bakomi kozwa ngai
lokola eloko ya soni,
mpe bato oyo bayebi ngai bakomi kozwa ngai
lokola eloko ya somo.
13 Babosani ngai lokola moto oyo asila kokufa ;
nakomi lokola mbeki oyo epanzana.
14 Nayokaka matongi na bango na tina na ngai
tango basanganaka mpe basalaka makita
mpo na koluka ndenge nini koboma ngai.
 
15 Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo, Yawe,
mpe nalobaka : « Ozali Nzambe na ngai. »
16 Mikolo ya bomoi na ngai ezali kati na maboko na Yo ;
kangola ngai wuta na maboko
ya banguna mpe ya bayini na ngai.
17 Tala ngai mosali na Yo, na miso ya bolingo ;
bikisa ngai kati na bolingo na Yo.
18 Yawe, sala ete nayokisama soni te,
pamba te nabeleli Yo.
Kasi tika ete bato mabe nde bayoka soni
mpe bakita kino na mboka ya bakufi.
19 Tika ete ekangama, bibebu oyo elobaka lokuta,
oyo elobaka na lolendo mpe na lofundu,
oyo ebebisaka lokumu ya moto ya sembo
na nzela ya songisongi.
 
20 Boboto na Yo ezali penza monene,
boboto oyo obombaka mpo na bato oyo batosaka Yo,
boboto oyo otalisaka epai ya bato oyo bazwaka Yo
lokola ebombamelo na bango,
na miso ya bato nyonso.
21 Obombaka bango epai na Yo,
mosika ya mabongisi mabe ya bato ;
obatelaka bango kati na Yo,
mosika ya bato oyo babundisaka bango.
 
22 Tika ete Yawe akumisama,
pamba te atalisaki ngai bolingo na Ye ya kokamwa,
tango nazalaki kati na engumba
oyo ezingelamaki na banguna !
23 Kati na kobanga na ngai, namilobelaki :
« Obengani ngai penza mosika na Yo ! »
Nzokande oyokaki ngai wana nazalaki kobondela Yo
mpe wana nazalaki kobelela Yo.
 
24 Bino babulami na Ye nyonso,
bolinga Yawe !
Yawe abatelaka bato ya sembo epai na Ye,
kasi apesaka etumbu ya makasi
epai ya bato ya lofundu.
25 Bino nyonso oyo botalelaka Yawe,
bozala makasi mpe boyika mpiko.