Nzembo 32
Bolimbisi epesaka esengo
Nzembo ya Davidi.
Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami,
mpe masumu na ye elongwe !
Esengo na moto oyo Yawe atangelaka lisumu te,
mpe atambolaka na lokuta te.
 
Lokola nazalaki kondima mabe na ngai te,
nazalaki tango nyonso kolela mpo na pasi.
Butu mpe moyi,
loboko na Yo ezalaki kofinafina ngai ;
makasi na ngai ekomaki kosila
ndenge makasa ekawukaka na eleko ya moyi.
 
Tango nandimaki masumu na ngai
mpe nabombaki mabe na ngai te,
nalobaki : « Nakotubela
masumu na ngai liboso ya Yawe. »
Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.
 
Boye, tika ete bayengebene nyonso
basambelaka Yo na tango ya malamu !
Soki mayi minene etomboki,
bambonge na yango ekozwa bango te.
Ozali ebombamelo na ngai ;
obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te
mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.
 
Olobaki : « Nakopesa yo malako
mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ;
nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.
Kozala te lokola mpunda to lokola mile ezanga bososoli,
oyo bakangaka nguya na yango
na nzela ya ebende mpe ya singa
oyo batiaka na minoko na yango
mpo na kopekisa yango kopusana pene na yo. »
10 Bato mabe bazali na pasi mingi,
kasi bolamu ya Yawe ezingelaka bato
oyo batiaka elikya na Yawe.
11 Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe,
bozala na esengo !
Bino nyonso oyo bozali na mitema alima,
bobeta milolo ya esengo.