Nzembo 43
Kotia elikya kati na Yawe
Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngai
liboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te ;
kangola ngai wuta na maboko
ya bakosi mpe ya bato mabe.
Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai,
oyo batonga makasi ;
mpo na nini osundoli ngai ?
Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye,
na se ya minyoko ya monguna ?
Tinda mwinda mpe solo na Yo
mpo ete ekamba mpe emema ngai
na ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka ;
bongo nakokende na etumbelo
epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai.
Oh Yawe, Nzambe na ngai,
nakosanzola Yo na lindanda.
Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ?
Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ?
Tia elikya na yo kati na Nzambe,
pamba te nakosanzola Ye lisusu,
Mobikisi mpe Nzambe na ngai.