Buku ya mibale
42
Nz 42.1–72.20
Kozala na posa ya Nzambe
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
Ndenge mbuli eyokaka posa ya komela mayi,
ndenge wana mpe molimo na ngai ezali na posa na Yo, Nzambe.
Molimo na ngai ezali na posa ya Nzambe, ya Nzambe na bomoi.
Tango nini nakoki kokende,
mpe tango nini nakoki kokutana na Nzambe ?
Butu mpe moyi,
mpinzoli na ngai ezalaka bilei na ngai ;
pamba te balobaka na ngai tango nyonso :
« Nzambe na Yo azali wapi ? »
Nazalaka na posa ya kokanisa makambo oyo,
ndenge mpe nasopaka molimo na ngai :
Tango nazalaki kotambola kati na ebele ya bato,
nazalaki komema bango kino na Tempelo ya Nzambe,
kati na koganga ya esengo mpe ya kozongisa matondi
lokola makelele ya bato oyo bazali na feti.
 
Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ?
Mpo na nini ozali komitungisa makasi kati na ngai ?
Tia elikya na yo kati na Nzambe,
pamba te nakokumisa lisusu lobiko na Ye.
 
Nzambe, molimo na ngai elembi kati na ngai ;
yango wana nazali kokanisa Yo wuta na mokili ya Yordani,
wuta na songe ya ngomba Erimoni
mpe wuta na ngomba Mitseari.
Mozindo ebendaka mozindo
tango bambonge na Yo nyonso etombokaka ;
Ezala ya mike to ya minene, elekaka likolo na ngai.
 
Na moyi, Yawe apesaka mitindo epai ya bolingo na Ye ;
na butu, nakumisaka Ye na banzembo
mpe nasambelaka Nzambe ya bomoi na ngai.
 
10 Nalobi na Nzambe, Libanga na ngai :
« Mpo na nini obosani ngai ?
Mpo na nini nasengeli kotambola na mawa kati na motema
mpe na se ya minyoko ya monguna ? »
 
11 Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi
tango bayini na ngai bafingaka ngai,
tango balobaka na ngai mokolo mobimba :
« Wapi Nzambe na yo ? »
 
12 Molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ?
Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai ?
Tia elikya na yo kati na Nzambe.
Nakokumisa Ye lisusu,
lobiko mpe Nzambe na ngai.