Nzembo 47
Bobetela Nzambe maboko
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko !
Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.
Tala ndenge nini Yawe,
Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo !
Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.
Atiaki bikolo na se na biso,
mpe mabota na se ya bokonzi na biso.
Aponelaki biso libula na biso,
oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.
 
Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ;
Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.
Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe,
boyemba mpo na lokumu na Ye.
Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso,
boyemba mpo na lokumu na Ye.
Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ;
boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.
 
Nzambe akonzaka bikolo nyonso ;
Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule.
10 Bato minene ya bikolo basangani,
lokola bato ya Nzambe ya Abrayami,
pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe ;
atombwama makasi.