Nzembo 48
Engumba ya Nzambe
Nzembo ya bana ya Kore.
Yawe azali monene mpe abongi na lokumu,
kati na engumba ya Nzambe na biso,
ngomba na Ye ya bule.
 
Ezali kitoko, ngomba moke oyo esalaka
esengo ya mokili mobimba,
ngomba Siona !
Ngambo na yango ya Nor nde ezali
engumba ya Mokonzi Monene.
Nzambe azali kati na bandako na yango ya bokonzi,
amimonisi lokola ndako batonga makasi.
 
Pamba te bakonzi basanganaki,
batambolaki nzela moko.
Kasi tango kaka bamonaki yango,
bakamwaki mpe bakimaki na somo.
Mbala moko, bakomaki kolenga wana
lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota
to lokola mopepe ya Este oyo apanzaka masuwa ya Tarsisi.
 
Ndenge kaka bayebisaki biso,
ndenge mpe tomonaki kati na engumba ya
Yawe, Mokonzi ya mampinga,
kati na engumba ya Nzambe na biso ;
Nzambe alendisaka yango seko na seko.
 
10 Nzambe, kati na Tempelo na Yo,
tokanisaka bolingo na Yo.
11 Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili,
ndenge moko na Kombo na Yo ;
loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo.
12 Ngomba ya Siona ezali kosepela,
bamboka ya Yuda etondi na esengo
mpo na mikano na Yo.
 
13 Botambola pembeni ya Siona,
bokende zingazinga na yango,
botanga bandako na yango ya milayi.
14 Botala lopango na yango,
botala malamu bandako na yango
mpo ete bopesa sango
epai ya bato oyo bakoya na sima.
 
15 Pamba te Nzambe wana azali Nzambe na biso
seko na seko mpe libela na libela ;
akotambolisa biso, ezala kino na kufa.