Nzembo 50
Nzambe akosambisa bato na Ye
Nzembo ya Azafi.
Nzambe ya banzambe, Yawe alobi,
abengi mokili wuta na epai moyi ebimaka kino na epai elalaka.
Wuta na Siona, mboka kitoko,
Nzambe azali kongenga lokola moyi.
 
Tika ete Nzambe na biso aya !
Tika ete akanga monoko te !
Liboso na Ye, moto makasi ezali kozikisa ;
mpe zingazinga na Ye, mopepe makasi ezali kopepa.
Abengi Likolo, kuna na likolo, mpe mabele
mpo na kokata makambo ya bato na Ye.
Alobi : « Bosangisela ngai bayengebene na ngai,
ba-oyo basalaki Boyokani elongo na ngai
na nzela ya mbeka. »
Likolo ekopanza sango ya bosembo na Ye,
pamba te azali Nzambe ya bosembo.
 
Bino bato na ngai, boyoka ; nazali koloba na bino !
Isalaele, nakoloba mpo na kotelemela yo :
« Ngai Nzambe, nazali Nzambe na yo. »
Nakopamela yo te na tina na bambeka na yo,
pamba te bambeka na yo ya kotumba
ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
Nakozwa ngombe te kati na ndako na yo
to ntaba mobali kati na etonga na yo ya bibwele,
10 pamba te banyama nyonso ya zamba ezali ya ngai ;
ezala ata ebele ya banyama oyo ezali kati na bangomba,
nyonso ezali ya ngai.
11 Nayebi bandeke nyonso ya bangomba ;
mpe banyama ya bilanga ezali ya ngai.
12 Soki nazalaki na nzala, nalingaki koyebisa yo te,
pamba te mokili mpe nyonso oyo
ezali kati na yango ezali ya ngai.
13 Boni, okanisi penza ete ngai naliaka
misuni ya bangombe
to namelaka makila ya bantaba ?
 
14 Bonzelaka Nzambe matondi lokola mbeka,
mpe kokisaka bandayi na yo
epai ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
15 Mpe belela ngai na tango ya pasi ;
nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.
16 Nzambe alobi na moto mabe :
« Mpo na nini opanzaka sango ya mibeko na ngai
mpe olobaka na tina na Boyokani na ngai ?
17 Nzokande oyinaka malako na ngai
mpe oyokaka te maloba na ngai ?
18 Soki omoni moyibi,
wana nde osepeli ;
mpe ovandaka esika moko na bato na bikobo.
19 Otikaka monoko na yo kosala mabe,
lolemo na yo ebimisaka kaka lokuta.
20 Ovandaka mpo na kotonga ndeko na yo,
mpe obebisaka lokumu ya bana ya mama na yo.
21 Yango nde makambo oyo ozalaki kosala ;
mpe ngai nabatelaki kimia.
Okanisi penza ete ngai nazali lokola yo ?
Nakopamela yo mpe nakotanda makambo nyonso
oyo nazwa yo na miso na yo.
 
22 Bino bato oyo bozali kobosana Nzambe, nabondeli bino :
bososola makambo oyo ; noki te nakobebisa bino,
mpe moto moko te akokangola bino.
23 Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka,
apesaka ngai lokumu ;
mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye,
nakotalisa ye lobiko ya Nzambe. »