Nzembo 49
Kotia motema na bomengo ezali bozoba
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
Bino bikolo nyonso, boyoka malamu makambo oyo ;
bino bavandi nyonso ya mokili, boyoka,
bato pamba mpe bato minene,
bazwi mpe babola :
Monoko na ngai ekoloba maloba ya bwanya ;
motema na ngai ekanisi makambo
oyo ekopesa bino bososoli.
Nayokaka masese,
mpe nalimbolaka sambole na nzela ya lindanda.
 
Mpo na nini nabanga na tango ya pasi,
tango mabe ya bakosi ezingeli ngai,
ba-oyo batielaka bomengo na bango motema
mpe bamikumisaka mpo na bofuluki ya bozwi na bango ?
Moko te akoki kosikola ndeko na ye,
moko te akoki kofuta mbongo epai ya Nzambe
mpo na lisiko na ye.
Talo ya bomoi na ye eleki motuya makasi,
mpe ekotikala kofutama te.
10 Akokaki kozala na bomoi libela na libela,
mpe akokaki kokufa te.
11 Solo, tomonaka bato ya bwanya kokufa
elongo na zoba mpe moto oyo azangi mayele,
mpe batikaka bomengo na bango epai ya bato mosusu.
12 Bakunda na bango nde ekomaka
bandako na bango mpo na libela,
mpe bisika na bango ya kovanda mpo na seko na seko,
atako bapesaki na bitando na bango ya mabele
bakombo na bango mpo ete ebengamaka na yango.
 
13 Mozwi akowumelaka te na bomoi ;
ata aleki na lokumu,
akokani na nyama oyo ezali kokufa.
 
14 Yango nde suka ya bato oyo
batiaka elikya kati na bango moko,
ya bato oyo balandaka bango
mpe basepelaka na maloba na bango.
15 Bazali lokola bameme
mpe babongisami mpo na mboka ya bakufi ;
kufa ekokoma kobokola bango.
Kala te, bato ya sembo bakonyata bango,
kitoko na bango ekonzuluka,
mpe mboka ya bakufi ekokoma ndako na bango.
16 Kasi Nzambe akokangola bomoi na ngai
wuta na maboko ya mboka ya bakufi,
pamba te akokamata ngai.
17 Komitungisaka te soki moto moko akomi kofuluka na bozwi,
soki kongenga ya ndako na ye ekomi komata se komata.
18 Pamba te akomema ata eloko moko te tango akokufa ;
bomengo na ye ekolanda ye te.
19 Atako, wana azalaki na bomoi,
azalaki komimona moto apambolama—
atako bato bakokumisa yo,
pamba te omisali bolamu—
20 okokende kaka kokutana na bakoko na yo
oyo bakotikala komona lisusu pole te.
 
21 Moto oyo azali mozwi, kasi azangi bososoli,
azali lokola nyama oyo ezali kokufa.