Nzembo 54
Nzambe akangoli ngai
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo : « Davidi abombami kati na biso. »
Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo,
longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.
Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai,
yoka maloba ya monoko na ngai.
 
Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai ;
mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai,
batalelaka Nzambe te.
 
Tala, Nzambe azali lisungi na ngai,
Nkolo azali eyekamelo na ngai.
 
Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe !
Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango.
 
Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu,
nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe,
pamba te ozali malamu.
Okangoli ngai na pasi nyonso ;
mpe miso na ngai etali
lokola molongi ya banguna na ngai.