Nzembo 55
Libondeli ya moto oyo bateki
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi.
Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai,
komibomba te wana nazali kobelela Yo.
Yoka ngai mpe yanola ngai.
Kati na kolela na ngai, nakomi koyengayenga
mpe nazangi kimia,
mpo na maloba ya monguna na ngai
mpe kanda ya moto mabe,
pamba te bazali kokweyisela ngai misala mabe
mpe konyokola ngai na kanda.
 
Motema na ngai etondi na mawa,
mpe somo ya kufa ekangi ngai.
Nakomi kobanga mpe kolenga,
somo monene ekangi ngai.
Nakomi komilobela :
« Soki nazalaki ata na mapapu ya ebenga,
nalingaki kopumbwa mpo na koluka bopemi ;
nalingaki kokima mosika penza,
mpo na kokende kovanda ata na esobe.
Solo, na lombangu penza,
nalingaki kokende koluka ebombamelo
mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki. »
 
10 Nkolo, bebisa mabongisi ya banguna na ngai
mpe kotisa mobulu kati na bango ;
pamba te, kati na engumba,
nazali komona mobulu mpe bokabwani.
11 Butu mpe moyi, ezali kotambola
na bamir na yango ;
misala mabe mpe ya kanza etondi kati na yango.
12 Banguya oyo ebebisaka ezali kosala kati na yango,
minyoko mpe lokuta ezali kosila te.
 
13 Soki monguna nde azalaki kofinga ngai,
nalingaki kokanga motema ;
soki ezalaki mpe moyini nde azalaki kotelemela ngai,
nalingaki komibomba mpo ete amona ngai te.
14 Kasi ezali yo, moto lokola ngai,
oyo otambolaka elongo na ngai,
molingami mpe moninga na ngai ya motema
15 oyo nazalaki kokabola elongo na yo,
pasi mpe basekele
tango tozalaki kokende
nzela moko na Tempelo ya Nzambe.
 
16 Tika ete kufa ekanga bango na mbalakata
mpe bakita ya bomoi kati na mboka ya bakufi ;
pamba te mabe etondi kati na bandako
mpe mitema na bango.
 
17 Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe,
mpe Yawe akobikisa ngai.
18 Tongo, midi, pokwa,
nasopaka motema na ngai mpe nalelaka,
mpe ayokaka mongongo na ngai.
19 Akopesa ngai kimia, akokangola ngai
na bitumba oyo babundisaka ngai ;
pamba te bato oyo batelemeli ngai bazali ebele.
20 Nzambe ayokaka, akosambwisa bango penza ;
akonzaka mpo na libela na libela.
 
Babongolaka mitema te
mpe batosaka Nzambe te.
 
21 Abundisi balingami na ye,
abebisi boyokani na ye.
22 Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali,
nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ;
maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta,
nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
 
23 Bwakela Yawe mokumba na yo,
akosunga yo ;
akotika te ete moto ya sembo akweya
mpo na libela.
24 Mpe Yo, Nzambe, okobwaka basopi makila
mpe bakosi kati na libulu ya libebi ;
bakokokisa ata kati-kati te
ya mikolo ya bomoi na bango.
Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo.