Nzembo 6
Yawe, Mosungi na ngai
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.
Yawe, kopesa ngai etumbu te na kanda na Yo,
kopesa ngai etumbu te na kanda makasi na Yo.
Yawe, yokela ngai mawa,
pamba te nazangi makasi.
Yawe, bikisa ngai na bokono,
pamba te mikuwa na ngai elembi.
Molimo na ngai ezali kotungisama makasi ;
bongo Yo, Yawe, kino tango nini ?
 
Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai,
bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo.
Pamba te bakufi bakoki lisusu te
kotatola Kombo na Yo te !
Mpe kati na mboka ya bakufi,
nani akoki kokumisa Yo ?
 
Kolela elembisi ngai nzoto.
 
Butu nyonso, nalelaka na mbeto na ngai,
mpe napolisaka na mpinzoli, esika oyo nalalaka.
Miso na ngai ebebi mpo na mawa ;
ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai.
 
Bino nyonso oyo bosalaka mabe, bolongwa liboso na ngai,
pamba te Yawe ayoki kolela na ngai.
10 Yawe ayanoli mabondeli na ngai
mpe ayambi losambo na ngai.
11 Banguna na ngai nyonso bakoyoka soni,
mpe somo monene ekokanga bango ;
bakozonga na sima
mpe bakoyoka mbala moko soni.