Nzembo 7
Yawe, longisa ngai
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya mawa oyo Davidi ayembelaki Yawe na tina na Kushi, moto ya libota ya Benjame.
Yawe, Nzambe na ngai, nabombamaka kati na Yo ;
bikisa ngai mpe kangola ngai liboso ya bato nyonso
oyo balukaka koboma ngai.
Soki te, bakopasola ngai lokola nkosi
mpe bakokata ngai na biteni,
mpe moto akozala te mpo na kosunga ngai.
 
Yawe, Nzambe na ngai, soki nasalaki makambo
oyo bazali kopamela ngai mpo na yango,
mpe soki ezali na mabe na maboko na ngai,
soki nasalaki moninga na ngai mabe,
soki nabotolaki na makasi mpe kaka na pamba,
biloko ya moyini na ngai ;
wana tika ete monguna na ngai alanda mpe akanga ngai,
tika ete asakanela bomoi na ngai
mpe abebisa lokumu na ngai.
 
Yawe, telema na kanda na Yo,
telemela kotomboka ya banguna na ngai.
Nzambe na ngai, telema, kata likambo na ngai.
Tika ete bikolo esangana zingazinga na Yo,
kasi Yo, konza bango wuta na Kiti na Yo ya Bokonzi.
Tika ete Yawe asambisa bikolo.
Yawe, longisa ngai kolanda bosembo na ngai,
kolanda bozangi pamela na ngai,
Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
 
10 Yo Nzambe ya sembo oyo ososolaka
mozindo ya mayele mpe ya mitema,
sukisa kanza ya bato mabe
mpe yikisa moto ya sembo mpiko.
 
11 Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali nguba na ngai,
abikisaka bato ya sembo.
12 Nzambe azali Mosambisi ya sembo,
asilikaka mikolo nyonso.
13 Soki alembisi kanda na Ye te,
akopelisa minu ya mopanga na Ye,
akobongisa mpe akobeta tolotolo na Ye.
14 Abongisaka bibundeli oyo ebomaka
mpe asalaka ete makonga na Ye ekoma kozikisa.
 
15 Moto nyonso oyo abongisaka kosala mabe
alukaka ndenge nini koyokisa bato pasi
mpe abebisaka boyokani ;
16 atimolaka libulu,
kasi ye moko nde akweyaka kati na yango.
17 Pasi oyo ayokisaka bato ezongelaka ye moko,
mpe mabe na ye ekweyaka na moto na ye moko.
 
18 Nakokumisa Yawe mpo na bosembo na Ye,
mpe nakosanzola Yawe-Oyo-Aleki-Likolo na banzembo.