Nzembo 60
Tokolonga kaka
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Lisi ya litatoli. » Nzembo ya Davidi mpo na koteya bato. Ayembaki yango tango abundisaki bato ya Siri ya Mezopotami mpe bato ya Siri ya Tsoba, mpe tango Joabi azongaki, sima na ye kolonga bato nkoto zomi na mibale ya Edomi, na bitumba kati na Lubwaku ya Mungwa.
Oh Nzambe, obwakaki mpe opanzaki biso,
osilikaki penza.
Sik’oyo, zongisa biso.
Solo, oningisaki mabele mpe obukaki yango.
Bamba madusu na yango,
pamba te ekomi koningana.
Omonisaki bato na Yo pasi makasi,
omelisaki biso vino oyo elangwisaka.
Opesaki na bato oyo batosaka Yo bendele
mpo na koyebisa bango
ete bakima liboso ya batolotolo ya banguna.
 
Mpo ete balingami na Yo bakangolama,
bikisa na nguya ya loboko na Yo ya mobali,
mpe yanola biso ! Yanola ngai !
Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule :
« Nakolonga ! Nakokabola Sishemi
mpe nakomeka molayi ya lubwaku ya Sukoti.
Galadi ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai ;
Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende,
mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.
10 Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka,
Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai.
Mpo na Filisitia, nabetaka milolo ya elonga. »
 
11 Nani akomema ngai kino na engumba
oyo batonga makasi ?
Nani akotambolisa ngai kino na Edomi ?
12 Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso,
Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba
elongo na mampinga na biso ?
13 Yaka kosunga biso,
kangola biso liboso ya moyini ;
pamba te lisungi ya bato ezali pamba.
14 Nzokande, elongo na Nzambe,
tokosala makambo minene mpe ya kokamwa ;
ezali Ye nde akonyata banguna na biso.