Nzembo 59
Nzambe na ngai, kangola ngai
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te ! » tango Saulo atindaki bato kozingela ndako ya Davidi mpo na koboma ye. Nzembo ya Davidi.
Oh Nzambe na ngai, kangola ngai
wuta na maboko ya banguna na ngai ;
batela ngai liboso ya banyokoli na ngai.
Kangola ngai wuta na maboko
ya bato ya misala mabe,
mpe bikisa ngai liboso ya basopi makila ya bato.
 
Yawe, bazali koluka koboma ngai ;
bato na nguya basaleli ngai likita,
nzokande nasali mabe te,
nasali na ngai mpe masumu te.
Nasali mabe ata moko te ;
kasi bango bazali kopota mbangu,
bazali komibongisa.
Lamuka mpo na koya kokutana na ngai, mpe tala.
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
Nzambe ya Isalaele, telema mpo na kopesa
bikolo nyonso etumbu ;
koyokela bato nyonso oyo basalaka mabe mawa te.
 
Bazongaka na pokwa,
bagangaka lokola bambwa
mpe batambolaka zingazinga ya engumba.
Na nzela ya minoko na bango,
babimisaka na bibebu na bango
maloba oyo ezokisaka lokola mipanga ; bamilobelaka :
« Nani azali koyoka biso ? »
Kasi Yo, Yawe, osekaka bango,
otiolaka bikolo nyonso.
 
10 Nzambe, ozali makasi na ngai,
nakotalela Yo ;
ozali ebombamelo na ngai,
11 Nzambe na ngai, oyo nalingaka.
 
Nzambe ayaka kino liboso na ngai,
atikaka ngai kotala banguna na ngai.
12 Nkolo, nguba na biso, koboma bango te,
noki te bato na ngai bakobosana.
Na nguya na Yo, sala ete bayengayenga,
mpe mema bango kino na se.
13 Mpo na masumu ya minoko na bango,
mpo na maloba ya bibebu na bango,
tika ete bakangama na motambo ya lolendo na bango.
Mpo na bilakeli mabe mpe lokuta na bango,
14 bebisa bango na kanda na Yo,
bebisa bango kino bazala lisusu te.
Bongo bakoyeba ete Nzambe azali kokonza
kati na Jakobi kino na suka ya mokili.
 
15 Bazongaka na pokwa,
bagangaka lokola bambwa
mpe batambolaka zingazinga ya engumba.
16 Bayengaka-yengaka mpo na koluka bilei ;
soki batondi te, balekisaka butu na kolelalela.
17 Kasi ngai nakoyembela makasi na Yo,
nakobetela bolingo na Yo milolo, na tongo,
pamba te ozali ebombamelo na ngai,
mpe ekimelo na ngai na tango ya pasi.
18 Ozali makasi na ngai,
nakoyemba mpo na lokumu na Yo ;
ozali ebombamelo na ngai, oh Nzambe ;
Nzambe na ngai, oyo nalingaka.