Nzembo 62
Nazwaka na kimia kati na Nzambe
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Davidi.
Solo, nazwaka kimia kati na Nzambe ;
lobiko na ngai ewutaka epai na Ye.
Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ;
azali ebombamelo na ngai,
nakoningana te.
 
Kino tango nini bokosangela moto moko ?
Kino tango nini bino nyonso bokosangana
mpo na koluka koboma ye
lokola mir oyo etengami,
lokola lopango oyo esili kokweya ?
Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye
wuta na esika na ye ya likolo,
basepelaka kotatola lokuta.
Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ;
kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.
 
Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe,
pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.
Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ;
azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.
Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ;
libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai
ezali kati na Nzambe.
Botielaka Ye elikya tango nyonso,
bosopaka mitema na bino liboso na Ye,
pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.
 
10 Solo, bato bazali lokola molunge,
bazali lokola lokuta ;
Soki batie bango na emekelo kilo,
ata molunge ekoleka bango nyonso na kilo.
11 Botiaka elikya te na mileki ya moyibi,
mpe botielaka yango motema te ;
soki bomengo na bino ekomi ebele,
bokangama na yango te.
 
12 Nzambe alobaki mbala moko,
ngai nayokaki mbala mibale :
« Pamba te makasi ezali ya Nzambe ;
13 mpe bolingo ezali ya Nkolo ; »
mpe « ofutaka moto nyonso
kolanda misala na ye. »